Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.