Yawe alobaki na ngai : — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! »
Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.