Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.