Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 20:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu.


Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye : — Mwasi, tala mwana na yo !


Ba-anjelu batunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Azongisaki : — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ?


Yesu atunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye : — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.


Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.


Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango.


Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.


Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo ! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ