Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.