10 Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda.
Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.
Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda ;
Na bongo, moko na moko azongaki na ndako na ye.