6 Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.
Moto yango azongisaki : « Batono tuku mibale ya mafuta. » Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya bangungulu zomi. »
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.
Pamba te, tango Moyize asilisaki kotangela bato mitindo nyonso ndenge ekomami kati na Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, ya bantaba elongo na mayi, asopelaki buku mpe bato nyonso na nzela ya etape ya nzete ya izope, oyo balinga elamba ya lino ya motane.