Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye : — Bazali lisusu na vino te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 2:3
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.


Basalaka feti mpo na kosepela, mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema, mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.


Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, kosepela nyonso ebongwani molili, esengo nyonso elongwe na mokili.


ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.


Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.


Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.


Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ