Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »
mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.
Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.
Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto.
Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.
Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.