Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 2:18
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo : — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.


« Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »


Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?


Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo.


Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki : — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ;


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?


Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?


Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna : — Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani ?


Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ