Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga.
Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.