Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.
Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela.
epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki.