Yoane 2:10 - Mokanda na Bomoi10 mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.