Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.
Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.
Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.