8 Tango Pilato ayokaki maloba wana, abangaki lisusu makasi.
Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. »
Bayuda balobaki na molende nyonso : — Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.
Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu : — Ozali moto ya mboka nini ? Kasi Yesu apesaki ye eyano te.