41 Pene ya esika oyo babakaki Yesu na ekulusu, ezalaki na elanga moko oyo, kati na yango, ezalaki na kunda moko ya sika epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye.
‹ Ozali kosala nini awa, mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo mpe kotonga epemelo na ye kati na lidusu ya libanga monene ?
mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.
Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
Yesu atunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye : — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.