Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye !
Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.
Pilato atunaki Ye : — Solo ezali nini ? Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango : — Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa.
Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,
Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.