Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele,
Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei ; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye.
nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni, elongo na lolenge nyonso ya banzete oyo epesaka malasi ya ansa, ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.
Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te.
Mari akamataki ndambo ya litele ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi, asopaki yango na makolo ya Yesu mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo yango. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi yango.