Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:36 - Mokanda na Bomoi

36 Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:36
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »


mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.


Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,


Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »


Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te.


Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika.


Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli :


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


Basoda balobanaki bango na bango : — Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango. Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai. » Ezali makambo wana nde basoda basalaki.


Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ