27 Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.
Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito.
Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »