Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !
Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango.
Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo ! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.