Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:20 - Mokanda na Bomoi

20 Lokola esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene ya engumba, Bayuda ebele batangaki makomi yango, pamba te bakomaki yango na lokota ya Ebre, lokota ya latino mpe lokota ya Greki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.


Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata. »


Lokola, mpo na Bayuda, ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, batiaki Yesu kati na kunda yango, pamba te ezalaki pene.


Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.


Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda : — Nakoki koyebisa yo likambo moko ? Mokonzi ya basoda atunaki Polo : — Oyebi koloba lokota ya Greki ?


Sima na mokonzi ya basoda kopesa ye nzela, Polo atelemaki na binyatelo mpe atombolaki loboko. Bato batikaki makelele, mpe Polo akomaki koloba na bango na lokota ya Arami :


Tango bayokaki Polo koloba na lokota ya Arami, bavandaki lisusu kimia koleka. Bongo, Polo alobaki :


Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »


Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.


Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona.


Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ