Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:19 - Mokanda na Bomoi

19 Pilato akomaki na libaya, makomi oyo atiaki na ekulusu ; akomaki : Yesu, moto ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »


Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu : Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.


Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu : Mokonzi ya Bayuda.


Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka !


Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.


Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.


Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?


Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.


Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda : — Botala mokonzi na bino !


Bakonzi ya Banganga-Nzambe balobaki na Pilato : — Osengelaki te kokoma : « Mokonzi ya Bayuda ; » osengelaki nde kokoma : « Moto oyo alobaki : ‹ Nazali mokonzi ya Bayuda. › »


Bazalaki koya koloba na Ye : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » Mpe babandaki kobeta Ye bambata.


Ngai moko mpe nazalaki liboso kokanisa ete esengeli na ngai kosala nyonso oyo ekoki kosalema, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti.


Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ