18 Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.
akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.
Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.