Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:15
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ?


Bato nyonso bagangaki : — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !


Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.


Tango kaka bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki Yesu, babandaki koganga : — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! Kasi Pilato azongisaki : — Bino moko, bokamata ye mpe bobaka ye na ekulusu ; ngai nazwi ye na mabe ata moko te.


Atako bamonaki mabe moko te kati na Ye, mabe oyo ekokaki komemela Ye etumbu ya kufa, kasi basengaki kaka ete Pilato aboma Ye.


Bato nyonso bazalaki kolanda ye na koganga : — Akufa !


Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : — Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ