Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:11
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.


Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.


Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.


Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.


Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe !


Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. »


Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.


bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana.


Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli.


Pilato alobaki na Ye : — Boni, oboyi kozongisela ngai eyano ? Oyebi te ete ngai nazali na makoki ya kobaka yo na ekulusu mpe ya kotika yo ?


Yoane azongisaki : — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.


Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Yesu azongiselaki bango : — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te ; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.


Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.


Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.


bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ