Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 19:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 19:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.


Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.


Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye ; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.


mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »


Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,


bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.


Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [


Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.


Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa ;


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ