9 Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »
Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.
Yesu alobaki na bango : — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.
Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.