Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yesu alobaki na bango : — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 18:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Napesi yango bomoi ya seko : ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai.


Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.


Simona Petelo atunaki Yesu : — Nkolo, ozali kokende wapi ? Yesu azongiselaki ye : — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima.


Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.


Yesu atunaki bango lisusu : — Bozali koluka nani ? Bazongisaki : — Yesu ya Nazareti.


Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. »


Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.


Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.


Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango


Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ