Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.
Kasi nazongiselaki na ye : — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima ! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye ? Nakokende te !
Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
« Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »
Yesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana ; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu,