Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 18:36 - Mokanda na Bomoi

36 Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 18:36
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?


Yesu azongiselaki ye : — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?


Pilato atunaki Yesu : — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?


Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.


Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ