34 Yesu azongisaki : — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ?
Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
Pilato atunaki Yesu : — Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ?
Azongaki lisusu kati na ndako ya moyangeli mpe alobaki na Yesu : — Ozali moto ya mboka nini ? Kasi Yesu apesaki ye eyano te.