— Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,
Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.
Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.
Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.