26 Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki : — Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ?
Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo.
Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : — Yo mpe ozali moko kati na bango ! Petelo azongisaki : — Tata, nazali moko te kati na bango.
Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.
Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi.