25 Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye : — Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ? Petelo awanganaki yango na koloba : — Te, nazali moyekoli na ye te.
Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.