22 Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba : — Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?
Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.
Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : — Sakola ! Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata.