15 Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto.
Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.