Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki.
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda : — Nakoki koyebisa yo likambo moko ? Mokonzi ya basoda atunaki Polo : — Oyebi koloba lokota ya Greki ?
Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni ; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.
Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.