Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »
Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.
Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !
Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.