Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango ; mpe batosi Liloba na Yo.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.