Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :
Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo.
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Pamba te makila ya bantaba, makila ya bangombe ya mibali mpe putulu ya bangombe ya basi, oyo basopelaka bato ya mbindo, epetolaka kaka libanda ya nzoto ;
Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.