Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 17:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 17:17
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, oh Nkolo Yawe, ozali penza Nzambe ! Maloba na Yo ezali solo, mpe olakaki makambo oyo ya malamu epai ya mosali na Yo.


Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli ; yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe.


Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.


Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ; pesa ngai bososoli mpo ete nabika !


Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.


Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo ? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.


Yawe alobi : « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »


Tala ndimbola ya lisese yango : Nkona ezali Liloba na Nzambe.


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.


Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te.


Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu


mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,


Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.


Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ