anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi ; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.
Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te.