7 Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.
Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.
Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.