Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.
Ndambo ya bayekoli ya Yesu bakomaki komituna : — Yesu alingi penza koyebisa biso nini na maloba oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu » mpe « nazali kokende epai ya Tata ? »
Sik’oyo, nazali koya epai na Yo ; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango.
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.