Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:4 - Mokanda na Bomoi

4 Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Boye bino, bosala keba ! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.


Yesu azongiselaki bango : — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.


kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe.


Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali.


Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema.


Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.


Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino ?


pamba te nayebi malamu ete, kala mingi te, nakokabwana na nzoto yango, ndenge Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ayebisaki ngai yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ