Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:32 - Mokanda na Bomoi

32 Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:32
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


Yesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »


Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama. Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Yesu alobaki na bango : — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »


Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki.


Yesu azongiselaki bango : — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye.


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese ; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata.


Yesu azongiselaki bango : — Bondimi sik’oyo ?


Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.


Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda.


Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.


Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.


Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;


Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye


Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te : Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai.


Ye oyo atindaki Ngai azali elongo na Ngai ; atikaki Ngai moko te, pamba te, Ngai, nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka Ye.


Sima na kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango.


Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ