Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:26 - Mokanda na Bomoi

26 Na mokolo wana, bokosenga na Kombo na Ngai. Nazali koloba na bino te ete nakosengela bino epai ya Tata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:26
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,


Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai ; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino.


Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? »


Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.


Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Nazali kobondela nde mpo na bango ; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo.


Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ