Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nalobaki na bino makambo wana nyonso na masese ; kasi tango ezali koya, tango oyo nakoloba na bino lisusu na masese te, kasi tango oyo nakoyebisa bino na polele penza makambo oyo etali Tata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:25
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ; motema na ngai ekanisi makambo oyo ekopesa bino bososoli.


Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na tango ya kala.


mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.


Bongo Yesu alobaki na bango : — Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ?


azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.


Azalaki koloba makambo yango na polele penza. Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Koloba bongo te !


Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye : — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele !


Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.


Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo.


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Kasi boyeba malamu ete tango ezali koya, mpe esili kokoka, tango oyo bokopanzana na bangambo nyonso, moto na moto na ngambo na ye, mpe oyo bokotika Ngai, Ngai moko. Kasi nazali Ngai moko te, pamba te Tata azali elongo na Ngai.


toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ