Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:24
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »


Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.


Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele.


Tala ndenge nini bosengeli kosambela : ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo ; tika ete Kombo na Yo ebulisama,


Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.


Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.


Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.


Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela bino, kasi naboyi kosala yango na nzela ya lokasa mpe ya mayi ya ekomeli. Nazali na elikya ya koya kotala bino mpe ya kosolola malamu na bino, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ